1 Timothy 1

Ebandeli ya mokanda

1Ngai Polo, mopostolo ya Kristo Yesu na etinda ya Nzambe Mobikisi na biso mpe ya Kristo Yesu Elikya na biso ; 2natindi mokanda oyo epai ya Timote, mwana na ngai ya solo katina kondima.

Tika ete ngolu, mawa, mpe kimia oyo ewuti na Nzambe Tata mpe na Kristo Yesu Nkolo na biso, ezala na yo.

Keba na bateyi ya lokuta

3Nalingi ovanda na Efezo, ndenge nasengaki yo tango nazalaki kokende na Masedwane, mpo ete opesa mitindo na bato mosusu ete batika koteya mateya ya lokuta, 4bakangama te na masapo ya pamba-pamba, mpe na kotangaka bakombo ya bankoko oyo ezangi suka. Makambo wana ebimisaka kaka tembe na esika ya mosala ya Nzambe, oyo ezali na nzela ya kondima.

5Nzokande tina ya motindo oyo, ezali ete bolingo emonana, bolingo oyoewutaka na motema ya peto, na makanisi ya malamu, mpe na kondima ya solo. 6Bato mosusu basiʼbabunga nzela wana, mpe bamipesa na masolo ya pamba-pamba. 7Balingi bazala bateyi ya Mibeko, kasi basosolaka maloba na bango te to mpe oyo balobaka na molende nyonso.

8Kasi biso toyebi ete, Mibeko ezali malamu soki moto asaleli yango na ndenge oyo ekoki. 9Toyebi mpe lisusu ete, Mibeko esalama te mpo na bato ya malamu, kasi mpo na bato ya mabe mpe batomboki, mpo na bato oyo batosaka makambo ya Nzambe te mpe bato ya masumu, mpo na bato ya mbindo mpe bato oyo batiolakamakambo ya bosantu, mpo na baoyo babomaka batata na bango to mpe bamama na bango, mpo na bato oyo babomaka bato, 10mpo na bato oyo basalaka ekobo, mpo na bato oyo basanganaka na baningana bango mibali, mpo na bato oyo bateka bato na bowumbu, mpo na bato ya lokuta, mpo na bato oyo balapaka ndayi ya lokuta, mpe mpo na makambo mosusu oyo etambolaka nzela moko te na mateya ya solo ; 11mateya oyo ekokani na Sango Malamu ya nkembo ya Nzambe ya lokumu, oyo bapesaki ngai.

Ngolu ya Nzambe epai ya Polo

12Nazali kozongisa matondi epai ya Kristo Yesu, Nkolo na biso, ye moto apesaki ngai makasi, mpo amonaki ete nazali ya kokoka, mpe aponaki ngai na mosala na ye ; 13ngai moto nazalaki liboso moto oyo azalaki kotiola ye, konyokolo ye, mpe kofinga ye ; kasi ayokelaki ngai mawa, pamba te nazalaki koyeba te makambo nazalaki kosala, mpe nazalaki na kondima te. 14Bongo Nkolo na biso atondiselaki ngai ngolu na ye, elongo nakondima, mpe bolingo oyo ezali kati na Kristo Yesu.

15Maloba oyo ezali ya solo mpe ezali ya kokoka mpo ete endimama : “Yesu Kristo ayaki na mokili mpo na kobikisa bato ya masumu”, bongo ngai nazali moto ya mabe koleka bango nyonso. 16Kasi ezali mpo na tina wana nde Nzambe ayokelaki ngai mawa, mpo ete kati na ngai, ngai moto ya mabe koleka bato nyonso ya masumu, Kristo Yesu akoka kolakisa kokanga motema na ye oyo ezangi ndelo, mpo ete nazala ndakisa mpo na bato oyo bakondima ye mpe bakozwa bomoi ya seko.
17 Tika ete lokumu mpe nkembo
ya seko na seko,
ezala na
Mokonzi ya seko,
Ye oyo akufaka te,
amonanaka te,
mpe azali Nzambe kaka moko ! Amen.

Batela kondima

18Timote, mwana na ngai, napesi yo etinda oyo : etinda yango ekokani na maloba ya kosakola oyo basakolaki mpo na yo, mpo ete na nzela ya kosalela yango, okoka kobunda etumba ya malambu, 19obatela kondima, mpe makanisi ya malamu. Bato mosusu basiʼbabwaka yango mpe babungisa kondima na bango. 20Kati na bango tozali na : Imene mpe Alekizande, baoyo nakaba na maboko ya satana mpo ete bayekola kotika kofinga Nzambe.
Copyright information for LinMNB